Ozali na kimiâ te na libala?
Ozali na mituna?
Ozali na posa ya kosolola na moto?
Moto ya koyoka yo azali.

Kovanda yo moko te nakati ya mikakatano. Moto ya koyoka mpe akosalisa yo azali. Mpo na lisalisi, okoki kobenga moto na nzela ya singa; akosalisa yo na monoko na yo Lingala, na sekele nyonso.

Appelez-nous!

Eloko nini ekoki kokoma?

  • Mobali na yo alingi koyeba makambo na yo nionso oyo osalaka: bilamba, bato okutanaka na bango, oyo ekomami na GSM to na mukanda ya ba adresse na yo.
  • Apekisi yo kosolola na ba ndeko to baninga ba yo, soki apesi yo nzela té. Ozali se yo moko.
  • Okoki kobima to kozonga na ndako ndenge olingi té.
  • Oluka ata osala mosala, to koyekola minoko ya ekolo mosusu, koyekola mosala ya sika; nianso wana apesiki yo.
  • Ozangi moto ya kolobela ye ba mpasi na yo, likambo na yo to ya bana se ye moko azwa mikano.
  • Mobali na ngai alobi : mikanda ma ngai na ya bana bako botola yango.
  • Nakoki kosalela mbongo na ngai ndenge nalingi te.
  • Kokutana mpe koyebana na baninga oyo olingi apeki ngai.
  • Abetaka nga.
  • Nalinga, nalinga te nasengeli kosepelisa ye na mbeto.
  • Na nzoto na yo, akosala ndenge motema na ye elingi mpé nzela ya kobima na mikakatano wana ezali te.
  • Komela nkisi mpo na bokébi ya kozua zemi (mpo na kobota) apekisi nga.
  • Na mimoni moto mpamba.
  • Obungisi bokasi mpe bo moto nayo
  • Osambwe
  • JOkangemi lokola moto ya boloko.
  • (..)

Ba ndakisa eye bilakisi bitumba ya nzoto, ya mbeto, ya mbongo, ya molimo na ya bomoto. Bobangi ya tango inso ekobendela yo mpe na bana mpasi ya nzoto mpe ya molimo. Natango wana, osengeli okutana na moto oyo akoyoka yo mpe akosalisa yo.

Ndenge ya kobima na mikakatano wana ezali mingi:

  • Koluka ba nzela ya lisalisi, kobenga moto to kolongwa na ndako
  • Koluka lisalisi ekoki na yo mpe na tango yo moko olingi.
  • Ozali na bosomi ya kosala oyo motema na yo moko elingi.

Bato bakosalisa yo na bozwi eyano mpe lisalisi na mikakatano bazali, okoki kosolola na bango na sekele.

Na makambo etali yo na bana, okoki kolimbola niaso na nimelo ya singa. Ozali na ndingisa ya komona bana, moto moko te akoki kopekisa yo.

Olingi koyeba oyo okoki kosala.

Yambo bozui mokano, osengeli koyeba nzela ya kolanda mpe likoki na yo. Na nzela ya singa, na bosomi nionso mpe na sekele bokutu, okoki kosolola na moto oyo akopesa yo ba nzela ya kolanda. Nionso wana na lokota na yo.

Appelez-nous!

Okoki mpe koluka yo moko banzela mosusu.

Na tango wana osengeli osala nini ?

Epayi wapi okoki koluka lisalisi

Lisolo na bokebi na monoko na yo

Kozela te ya bokutani na moto oyo akoyoka yo na sekele mpé na monoko na yo. Ozali yo moko té na kati ya mikakatano na yo, moto akoyoka yo azali.

Appelez-nous!

Milongo ya lisalisi

Benga to kotinda na mail 1712 po na mituna oyo etali bitumba na kati ya libala. Kobenga na 1712 ezali ofele. Okoki lisusu kobenga na limelo 0800 30 030 (Falansé) to koluka na internet na: www.ecouteviolencesconjugales.be

Mituna etali lisalisi : lisalisi ya yambo lingomba ya lisalisani, ntoli ya bazuzi, … Koyoka boniokwami na libala : 080030030 www.ecouteviolencesconjugales.be

Po na mituna etali mosungi, lisalisi etali pisikoloji ya bovandi na bato, likanisi ya bazuzi, bongo na bongo. Okoki lisusu kobenga na limelo oyo 0800 30 030 (Falansé) to na:www.ecouteviolencesconjugales.be

Lingomba ya bosalisi Mpo na bozwi lisalisi, esengeli kokende na lingomba ya bosalisi ya mbôka bisika ovandi. Wana okoki masalisi ndenge nionso.www.belgium.be/nl/familie/sociale_steun/ocmw

Esika ya komibomba

Koyamba, kopesa esika ya kobika na baye bazali koniokwama (ba mama elongo na bana). Lisalisi ekozuama nzela ya singa : to na nzela ya: 0800 30 030 www.ecouteviolencesconjugales.be\maisons.php

Makambo matali ba zuzi

Ozali na makoki ya kozwa lisalisi ya mosambeli. Batoli ya liboso ezalaka ofele. Soki oyo ekolanda, okoki kofuta yango te, bakoki kolukela yo mosambeli pro-deo. Masalisi na nzela ya singa to ya internet:

Makambo matali bofandi na mboka mopaya

Mboka Beleziki ezali na likoki ya bobateli baye bazali koniokwama o kati ya libala. Ata na tango ya bosangani ya libota (mama mpe bana baye kolanda tata na mboka mopaya). Okoki kotanga na bolayi lisalisi etali baye bakimi mboka ya bango na baye bazali koniokwama na kati ya libala na buku ya lingomba CIRE, elobi te: mwasi na mobali bazali ndenge yoko. Liboso ya bobandi milulu wana, okeba eloko moko te nde ebendi kwokoso na bofandi na yo na mboka Beleziki.www.cire.be .

Makambo etali mosambeli, buku ya bofandi, likoki lya libota etali mikili minso (ndakisa : yo to Molongani na yo, ozali na bulu ya ba paya ; yo to mobali na yo ozali na ndingisa ya bofandi libela te. www.integratie-inburgering.be/juridische-dienstverlening to benga na biro mpo ya kosalisa babongoli na 02 205 00 55. Mpo na koyeba makambo mosusu: www.agii.be/thema/vreemdelingenrecht-internationaal-privaatrecht www.progresslaw.net

Polisi mpe lisalisi ya minganga

Tango nioso likambo ekokwela yo na nzoto, osengeli kokende epayi ya monganga na lopitalo. Monganga asengeli kobomba mikanda nionso na molongo. Monganga ayebi makambo ya boniokwami na libala mpe ba kosalisa yo.

Oyo etali lisalisi ya polisi esika ofandi, tala na nzela ya internet: www.politie.be/nl

Tango ya mbalakaka (ndakisa likama ya bomoï) beta singa na nimelo 101 ya polisi. Bazali na makoki ya kosalisa yo. Soki lisalisi ya monganga esengemi mpe, beta singa nimelo 112.

Masalisi ndenge na ndenge

Lisalisi etali boniokwami na libala:

Mibeko epekisi bitumba, boniokwami na kati ya libala.

Okoki kofunda makambo wana na polisi. Esengeli mateya eye:

  • Lakisa molongo ya mikanda ya monganga to ya lopitalo.
  • Salisa ba fotocopie ya mikanda nionso ozali na yango na ndako to epayi ya monganga. Bomba molongo ya mikanda nionso mpe memaka se ba fotocopie epayi bakosenga yo.
  • Manso elobi to ekomami, tanga na bokebi. Sala te manzala polele libosa otia linzaka na yo. Soki oyo ekomami esepelisi yote, boya kotia linzaka. Basengeli kobandela lisusu.
  • Na suka, senga fotocopie ya mikanda nionso, nimelo ya mokanda oyo elimboli makambo (procès-verbal), nkombo ya mokomi. Manso oyo mazali na litomba mpo ya bokwabwani, mpo ya kofunda moninga, to mpo ya kofanda yo moko.

Mpo ya bozwi esika ya komibomba:

  • Ya liboso bongisa mikanda mitali yo mpe na bana : buku ya yambo, nimelo ya mwana, buku ya libala .Soki libala ezali te kasi bofandi elongo : mikanda mikolakisa biloko bosomba lisanga, ebombeli ya mosolo na , milongo ya mikanda ya minganga mikolakisa nde mpota ewuti na bobeti.
  • Soki okoki, bomba mbongo mpo ofutela esika ya kofanda, mpe mbongo ya kofuta mobembo ya kokende epayi ya baninga, yebisa mokolo nini okokoma epayi na bango.
  • Epayi ya baninga bazali pene na yo, bomba mwa bilamba na biloko ya kosalisa yo soki esengeli olongwa na ndako na mbalakaka
  • Bongisa biloko binso ya motuya ozali na mango ; mayaka ya talo
  • Soki ozali na motuka, tiya wana biloko okoki kosalela
  • Soki ekomi bokabwani ya libela, kamata ba foto ya ndako na biloko ezali na kati : bakiti, messa, mbeto, malu malu, …
  • Soki okotika ndako, koma mokanda ekopekisa moninga akota na ebombeli ya moninga mosusu.
  • Kotuna na posita alandisa mikanda epayi ozali kofanda, to abatela yango. Posita akoki kopesa limelo na balabâla na yo ya sika te.

Liziba: www.vzwzijn.be/upload/docs/ZIJN_folder2_slachtoffervanpartnergeweld.pdf